 |
|
 |
This is Islam |
|
| 1-ISLAM |
- ezali kondima éte mokili na biye bizali okati nayango ezali na oyo akela yango (ye nde) Allah Ye Mei azali na oyo asangana naye té (likolo) na mapata azali koyoka bikelamu, azali komona biango, azali koyoka , Ye nde esengeli kobondela Ye, na koboya biye binso bizali kobondelama (bizali ) Allah te. Mpe esengeli ondima éte Allah akela bato pamba té kasi akela bango mpo babondela Ye, bandima éte akosekwisa bango mokolo mua kiyama, mpe odima éte akofuta bango engébené na misala basala na mokili.
|
|
|
|
| 2-ISLAM |
- ezali kondima éte Allah akela ba Angelu bakeseni (bolelami) na bato Allah akela ba Angelu na ngba, mpe apesa bango misala okati na bango Angelu (Gabriel). Ye nde apesami mosala ya kokitaka na emoneli ya Allah epayi ya bantoma.
|
|
|
|
| 3-Islam |
- ezali kondima été Allah asila kokitisa mukanda epayi ya Ba ntoma (ba Yé) lokola. Lokola Torah,Injil na Psaumes. Na mikanda misusu etangami kombo té. Qur’an oyo akitisa yango epayi ya (Ntoma) Muhammad. Mikanda nyoso wana mizali kotinda kobondela kaka Allah Ye mei azali na oyo asangani na Ye té. Mikanda miina (misatu) mibalusama maloba sima ya mikolo koleka. Mbeba wana esalamaki na banguna ya lingomba baye bazali kolia misolo mia batu na nzela ya solo té (kimoibi). Kolongola kaka Qur’an oyo ekitaki epayi ya Ntoma Muhamad, bato bakanga yango na mitema mia bango, mpe Allah asala Qur’an yango ezala bikamwa mpe Allah amipesaki mokumba ya kobatela yango (moto) atia yango maboko té. Mpe (Allah) asala yango ezali na kibokonzi likolo ya misusu wana ekita liboso ya Qur’an. Ezali mpe likambi ya bayebi baye bazali kondima yango (été ezali na solo).
|
|
|
|
| 4-Islam |
- esengeli ondima éte Allah asila kokela Adam kouta na mabélé ye (Adam) nde moto wa liboso, mpe asalela ye libota. Atia bango na momekano. Na mikolo ezali koleka batu babunga bazabolo babungisa bango (bato) bakoma kobondela bikeko. Nde Allah atinda bantoma (okati) na bato baya kokomisela bango etinda ya Allah. Yango nde kobondela Allah Ye mei azali na oyo asangani ne Yé té. Okati ya bantoma 5 Noé, Abulayama, Mussa na Jesus) Ntoma ya suka nde Muhammad (saw) suka ya bantoma. Okozala na bondimi té ya solo kaka ondima na bantoma banso ba Allah na kolinga bango banso.
|
|
|
|
| 5- Islam |
- ezali ondima éte manso mazali koleka okati ya mokili oyo, ezali nde mabongisi ma Allah asila kokoma mango liboso ezala (ekelama) kasi moto esengeli asala (misala) mpe Ye (moto) azali mosali misala akotunama mpo na yango nyoso oyo asala awa nasé mpe olikolo. Esengeli atika kosala misala té éte (Allah) asila kobongisela ye. Kondima lolengé wana ekosala yo ozala na bomoi bua kimia (awa nasé).
|
|
|
First 1 2 3 4 5 Last
|
|
 |
Main Menu |
|
|
 |
|
| |
Languages |
|
 |
|
|
 |